Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Na mokolo wana, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo, bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko na makambo ya kanza mpe na lokuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 1:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.


Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.


Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke, ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta ; mpe ezali na nzela yango nde bakoma bazwi mpe bato na nguya.


Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »


Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, bato ya libota oyo batondi na lokuta, mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.


Natunaki : — Makambo nini yango ? Azongisaki : — Ezali nde sani, emekelo motuya ya biloko. Abakisaki : — Sani yango etondisamaki na masumu ya bato ya mokili.


Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele.


Na tongo, tango mobali na ye alamukaki, afungolaki ekuke ya ndako mpo na kobima libanda mpe kokoba mobembo na ye ; amonaki makangu na ye alali na ekuke ya ndako, maboko liboso ya ekuke.


Yango wana, kino na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagoni mpe bato mosusu oyo bakotaka na tempelo ya nzambe Dagoni, na Asidodi, banyataka zingazinga ya ekotelo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ