Jewu alobaki na mobateli bilamba ya bonganga-nzambe ya Bala : « Yaka na bilamba mpo na basambeli nyonso ya Bala. » Boye abimisaki bilamba mpo na bango.
Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.
Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.
« Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »
Mwasi akoki kolata bilamba ya mibali te to mpe mobali akoki te kolata bilamba ya basi, pamba te Yawe, Nzambe na bino, ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo ya ndenge wana.