Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 1:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe, pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ! Yawe abongisi mbeka, abulisi babengami na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 1:7
39 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te mpo na esambiselo ? Mpo na nini bato oyo bayebi Ye basengeli koluka na pamba mikolo ya boye ?


Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.


Napesaki mitindo epai na bato oyo babulisama mpo na Ngai ; nabengisaki lisusu bilombe na Ngai, bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai, mpo na kosilisa kanda na Ngai.


Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene, ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisa mokolo moko mpo na kokitisa bato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu, bato nyonso oyo bamimatisaka,


Kasi nakonyokola Arieli ; ekokoma na mawa mpe na kolela ; ekokoma na miso na Ngai lokola etumbelo.


Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo ; tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.


Mopanga na Yawe etondi na makila, ezipami na mafuta, na makila ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali, na mafuta ya bameme ya mibali, pamba te ezali na mbeka moko mpo na Yawe kati na Botsira mpe bazali koboma bato ebele penza kati na mokili ya Edomi.


Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »


Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpo na kozongisela banguna na yo mabe. Mopanga ekoboma kino ekotonda, kino ekosilisa posa na yango ya makila ; pamba te ezali nde mbeka mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.


Tala, mokolo yango nde yango oyo ! Esili kobelema ! Kobebisama eboti mbuma, lingenda ebimisi bafololo, lolendo ekoli !


Kobebisama ekokomela yo, yo movandi ya mokili ! Tango yango ekoki, mokolo yango ebelemi, somo makasi ekoti, mpe esengo ezali lisusu te na likolo ya bangomba.


Mawa na mokolo wana ! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?


Soki noko moko oyo asengeli kotumba bibembe ayei kobimisa yango na ndako mpe atuni na moto nyonso oyo abombami kuna : — Boni, ozali elongo na moto mosusu kuna ? Akozongisa : — Te, moto mosusu azali te ! Bongo akoloba lisusu : — Esili ! Bakolobela lisusu Kombo ya Yawe te.


Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.


Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !


Mokolo monene ya Yawe ekomi pene, solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza. Boyoka ! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo ; ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.


Tala, mokolo ya Yawe ezali koya ; ezali mokolo oyo bakokabola bomengo ya bitumba kati na yo, Yelusalemi.


Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.


Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango : « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei : nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta ; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. »


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »


Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.


mpe mpo ete, na esengo nyonso, bozongisaka matondi epai ya Tata oyo apesaki bino makoki ya kosangana na libula ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te :


Samuele azongisaki : — Solo, koya na ngai ezali ya kimia. Nayei mpo na kobonzela Yawe mbeka. Bomibulisa mpe boya kotumba mbeka elongo na ngai. Bongo abulisaki Izayi elongo na bana na ye ya mibali mpe abengisaki bango na kotumba mbeka elongo na ye.


Saulo alobaki eloko moko te na mokolo wana, pamba te akanisaki kaka ete eloko moko esalemi epai ya Davidi oyo ekomisi ye mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ