Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 1:5
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.


Salomo akomaki kosambela ekeko ya Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.


Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki : — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela ? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye ! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. Bato bazongisaki ata eloko moko te.


Bato ya bikolo yango bazalaki na bango kotosa Yawe, kasi baponaki lisusu kati na bango bato mpo na kosala mosala ya bonganga-nzambe kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba.


Atako bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango kolanda bizaleli ya bikolo epai wapi bawutaki.


Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala.


Mokonzi abukaki bitumbelo oyo bakonzi ya Yuda batongaki na likolo ya shambre ya likolo ya Akazi, mpe bitumbelo oyo Manase atongisaki kati na mapango mibale ya Tempelo ya Yawe. Alongolaki yango wana, abukaki yango na biteni, mpe abwakaki yango na lubwaku ya Sedron.


Maloba na Yawe na tina na lubwaku ya Emoniseli : Likambo nini lisusu ekomeli bino sik’oyo mpo ete bino nyonso bomata na likolo ya mitondo ya ndako ?


Moto moko akoloba : ‹ Nazali ya Yawe, › mpe moto mosusu akomibenga na kombo ya Jakobi, kino mosusu akokoma na loboko na ye : ‹ Nazali ya Yawe, › mpe akozwa kombo ya Isalaele.


Nalapi ndayi na Kombo na Ngai ; oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai, liloba oyo bakoki koboya te : mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai.


Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !


Mpe soki bayekoli malamu bizaleli ya bato na Ngai mpe balapi ndayi na Kombo na Ngai, na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndenge balakisaki bato na Ngai kolapa ndayi na kombo ya Bala, nakopesa bango esika kati na bato na Ngai.


Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › »


Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango ; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya.


soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo : ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »


Na tina na bato ya Amoni : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te ? Atikali lisusu na bakitani ya libula te ? Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, abotoli bingumba ya Gadi ? Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi ?


Atako balapaka ndayi na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. »


« Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.


bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba : ‘ Tobiki na biso ! ’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele ?


Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;


Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.


Mitema na bango etondi na mabe mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango. Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango mpe akopanza mabanga na bango ya bule.


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Nzokande, botombolaki ndako ya kapo ya Sikuti, mokonzi na bino, mpe evandelo ya Kevani, nzambe na bino ya ekeko, monzoto ya nzambe na bino oyo bomisalelaki.


Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.


Mokolo oyo elandaki, na ngonga pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Petelo amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kosambela.


Pamba te ekomama : « Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo, « mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. »


Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye ; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye.


Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.


Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ