Sofoni 1:4 - Mokanda na Bomoi4 « Nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa mokili ya Yuda mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu ; nakosilisa koboma, na esika oyo, nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Bala elongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano, oyo basalelaka banzambe ya bikeko : အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babukaki liboso na ye bitumbelo ya banzambe Bala, bakweyisaki mbala moko bitumbelo malasi oyo ezalaki na likolo na yango, abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera, bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto ; akomisaki yango putulu mpe asopaki putulu yango na likolo ya bakunda ya bato oyo babonzelaki banzambe yango bambeka.