Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
Atako ndambo ya basoda ya Siri kaka nde bayaki, kasi Yawe akabaki na maboko na bango mampinga ya bato ya Yuda, oyo elekaki monene, pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango. Boye, basoda ya Siri bakokisaki etumbu oyo ekweyelaki Joasi.
Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. »
Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki : ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama ? ›
‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te.
Yawe asali makambo oyo abongisaki, akokisi liloba na Ye, nyonso oyo aloba wuta kala : akweyisi yo na mawa te, apesi nzela na banguna na yo ete balonga yo, atomboli liseke ya banguna na yo.