Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene ; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.
pamba te basundoli ndako ya mokonzi ; engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te, Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libela mabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba, mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti,
« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.
Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.
Bobeta kelelo na Siona ! Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, pamba te mokolo ya Yawe ezali koya ; solo, ekomi penza pene.
Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.
Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango.