Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 1:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi, mokolo ya pasi mpe ya somo, mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama, mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 1:15
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala, mokolo na Yawe ezali koya, ezali mokolo moko ya pasi, mokolo ya kotomboka mpe ya kanda makasi mpo na kobebisa mokili mpe koboma bato ya masumu kati na yango.


Pamba te ezali mokolo moko ya lokito ya bitumba, mokolo ya pasi makasi mpe ya somo kati na lubwaku ya Emoniseli kowuta na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; ezali mokolo oyo mir ya makasi ekobukana mpe makelele ya koganga ekobima na bangomba.


Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi ; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.


Mawa ! Ekozala penza mokolo ya somo ! Mokolo moko te ekokokana na yango ! Ekozala tango ya pasi mpo na Jakobi, kasi akobikisama na pasi yango.


Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?


Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.


Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.


liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino !


Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »


Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.


Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.


Nzokande, ezali mpe kaka Liloba yango nde azali kobomba Likolo mpe mabele ya sik’oyo mpo na kozika na moto, na mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisama ya bato ya masumu.


Pamba te mokolo monene ya kanda na bango ekoki, bongo nani akoki kolonga kotelema ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ