Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 1:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mokolo monene ya Yawe ekomi pene, solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza. Boyoka ! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo ; ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 1:14
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi, mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ; yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga mpe mitema na bango ebukani.


Tala, basoda na bango ya mpiko bazali koganga makasi na balabala ; bamemi sango ya kimia, azali kolela makasi.


Boyoka makelele kobima longwa na engumba, boyoka makelele kobima longwa na Tempelo ! Ezali nde mongongo na Yawe oyo azali kofuta banguna na Ye kolanda oyo ekoki na misala na bango.


Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi ; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.


Boyoka koganga ya babateli bibwele, kolela ya bakambi ya bampate, pamba te Yawe azali kobebisa bazamba epai wapi bibwele eliaka.


Mawa ! Ekozala penza mokolo ya somo ! Mokolo moko te ekokokana na yango ! Ekozala tango ya pasi mpo na Jakobi, kasi akobikisama na pasi yango.


Nazali komona nini ? Bazali kolenga na somo mpe kozonga sima ; balongi basoda na bango ya mpiko, bazali kopota mbangu makasi mpe bazali ata kotala sima te : somo ekangi bango na bangambo nyonso, » elobi Yawe.


Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi. Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. › Loba na bango lisusu : ‹ Tango ekomi pene oyo bimoniseli nyonso ekokokisama.


Pamba te mokolo yango ekomi pene ; mokolo ya Yawe ekomi pene, mokolo ya mapata, tango ya molili mpo na bikolo.


Tango ebelemi, mokolo yango ekoki. Tika ete mosombi moko te azala na esengo to moteki moko te azala na mawa, pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso.


Batikali bakokima na likolo ya bangomba ; mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, moto na moto mpo na masumu na ye.


Mawa na mokolo wana ! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Bobeta kelelo na Siona ! Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, pamba te mokolo ya Yawe ezali koya ; solo, ekomi penza pene.


Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?


Atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai : — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.


Na mokolo wana, » elobi Yawe, « koganga makasi ekoyokana wuta na Ekuke ya Bambisi, kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse.


Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe, pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ! Yawe abongisi mbeka, abulisi babengami na Ye.


Moyi ekobongwana molili, sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo ya Nkolo ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya nkembo.


Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.


pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.


Ye oyo mongongo na Ye eningisaki mokili na tango ya kala apesi lelo elaka oyo : « Na mbala oyo lisusu, nakoningisa kaka mabele te, kasi nakoningisa mpe Likolo. »


Bandeko na ngai, botika kofundana bino na bino, noki te Nzambe akosambisa bino. Botala, Mosambisi azali ya kotelema liboso ya ekuke.


Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ