Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 1:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bakobotola bango bomengo na makasi mpe bakobuka bandako na bango ; bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ; bakosala bilanga ya vino, kasi bakotikala komela vino na yango te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 1:13
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye nalobaki : — Oh Nkolo, kino tango nini ? Azongisaki : — Kino bingumba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te, kino tango bato bakotikala lisusu na bandako te, mpe bilanga ekobebisama mpe bakosakanela yango ;


Nakosala ete babotola bino biloko mpe bomengo na bino ; bongo bakofuta bino yango te mpo na masumu na bino nyonso oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba.


Oh ngomba na Ngai kati na mokili, nakokaba lokola bomengo ya bitumba : biloko na yo, bozwi na yo nyonso mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.


Sango moko kaka ezali kotambola : libebi na libebi ; mokili mobimba ekufi. Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi, mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko.


Nkosi moko ebimi na ndako na yango ; mobebisi moko ya bikolo abimi. Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.


Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.


Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye ? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te ? »


Eh basi, boyoka Liloba na Yawe ! Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa mpe tika ete moko na moko ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.


Libula na biso ekeyi na maboko ya bapaya, bandako na biso ekeyi na maboko ya bato mosusu.


Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. »


Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo. Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki te ya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe. Palata mpe wolo yango ekosilisa baposa mpe nzala na bango te, pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu.


Nakokaba yango lokola bomengo ya bitumba na maboko ya bapaya mpe ya bato mabe ya mokili mpo ete babotola yango na makasi mpe basakanela yango.


Nakotinda ekolo oyo eleki mabe kati na bikolo mpo ete eya kobotola bandako na bango ; nakosilisa lolendo ya bato ya nguya mpe nakosambwisa bisika na bango ya bule.


lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ; okokamola bambuma ya olive, kasi okomipakola mafuta na yango te ; okokamola bambuma ya vino, kasi okomela masanga na yango te.


Na mokolo wana, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo, bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko na makambo ya kanza mpe na lokuta.


Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te.


Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango.


Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ