Bino babateli bibwele, bolela mpe boganga ! Bino bakambi ya bitonga, bobaluka-baluka na putulu ! Pamba te tango na bino ya kokufa ekoki ! Bokokweya mpe bokopanzana mike-mike lokola mbeki.
Ata soki bakimi, bakobebisama ; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango ; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.
Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.
Mawa na bino bavandi ya etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, bino bato ya Kereti ! Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino : « Kanana, mokili ya bato ya Filisitia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »
Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.