Sofoni 1:10 - Mokanda na Bomoi10 Na mokolo wana, » elobi Yawe, « koganga makasi ekoyokana wuta na Ekuke ya Bambisi, kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na makambo oyo nyonso, Manase atongaki mir, na libanda ya engumba ya Davidi, na ngambo ya weste ya etima ya Giyoni, na lubwaku oyo ekenda kino na ekuke ya Mbisi ; ezingelaki ngomba moke ya Ofeli. Asalaki yango molayi makasi, kobanda na se kino na likolo, mpe atiaki bakonzi ya basoda kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi.
Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe tango bato na bango bakokufa na mopanga kati na banzambe na bango ya bikeko zingazinga ya bitumbelo na bango, na bangomba nyonso ya mikuse mpe na likolo ya bangomba nyonso ya milayi, na se ya banzete nyonso ya mibesu mpe na se ya terebente nyonso ya mobesu etonda na makasa, bisika oyo bazalaki kotumbela banzambe na bango ya bikeko ansa lokola mbeka ya solo kitoko.