9 Boazi ayebisaki bampaka mpe bato nyonso : — Bino moko bozali batatoli ete nasombi na maboko ya Naomi libula nyonso ya Elimeleki, ya Kilioni mpe ya Maaloni.
— Te, nkolo na ngai, yoka ngai ! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo.
Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna.
Nazwi lisusu Rite, moto ya Moabi, oyo azalaki mwasi ya Maaloni oyo akufa, mpo ete azala mwasi na ngai, mpo na kosala ete kombo na ye etikala na libula na ye, ete ebunga te kati na bandeko na ye mpe kati na buku ya leta ya engumba na ye. Bino bozali batatoli na yango lelo.