Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 4:22 - Mokanda na Bomoi

22 Obedi abotaki Izayi, Izayi abotaki Davidi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 4:22
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boazi azalaki tata ya Obedi ; mpe Obedi azalaki tata ya Izayi.


Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi ; wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma.


mpe Izayi abotaki mokonzi Davidi. Davidi abotaki Salomo na nzela ya mwasi ya Uri ;


Eliakimi, mwana mobali ya Meleya ; Meleya, mwana mobali ya Mena ; Mena, mwana mobali ya Matata ; Matata, mwana mobali ya Natani ; Natani, mwana mobali ya Davidi ;


Basi ya mboka wana balobaki : « Naomi aboti mwana mobali ! » Bapesaki mwana mobali yango kombo « Obedi. » Obedi abotaki Izayi, mpe Izayi abotaki Davidi.


Salima abotaki Boazi, Boazi abotaki Obedi,


Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.


Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.


Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ