Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 4:2 - Mokanda na Bomoi

2 Boazi abengaki mibali zomi kati na bakambi ya engumba mpe asengaki ete bavanda na bango elongo. Tango bavandaki,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 4:2
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Jezabeli akomaki mikanda na kombo ya Akabi, atiaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango epai ya bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti.


Soki mwana mwasi asepelisi te nkolo oyo aponaki ye mpo ete azala mowumbu na ye, nkolo yango akotika ete mwana mwasi asikolama ; azali na ndingisa te ya koteka ye epai ya bapaya. Kasi soki ateki ye, wana asambwisi ye.


Bapesaka mobali na ye lokumu, na ekuke ya engumba, tango avandaka elongo na bakambi ya mokili.


Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba, mpe bilenge batika kobeta mindule.


Batombokisaki bato, bakambi mpe balakisi ya Mobeko. Boye, bayaki kokanga Etieni na mbalakata mpe bamemaki ye na Likita-Monene.


Soki mobali yango aboyi kobala semeki na ye ya mwasi, semeki yango ya mwasi akokende epai ya bampaka, na ekuke ya engumba, mpe akoloba na bango : « Semeki na ngai aboyi kobatela kombo ya ndeko na ye kati na Isalaele, aboyi kokokisa mokumba na ye ya kisemeki epai na ngai. »


elongo na bana na bino mpe basi na bino mpe bapaya oyo bazali kati na milako na bino mpo na kobukela bino bakoni mpe kotokelaka bino mayi.


Bosangisa liboso na ngai bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bakalaka na bino, mpo ete naloba maloba oyo na matoyi na bango mpe nazwa likolo mpe se lokola batatoli mpo na kofunda bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ