15 Akoyeisa bomoi na yo sika mpe akosunga yo na kimobange na yo, pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yo mpe azali na motuya na miso na yo koleka bana mibali sambo, aboteli yo mwana mobali. »
Kuna, nakokokisa baposa na yo nyonso, pamba te mibu mitano ya nzala makasi ezali koya ; soki te, yo elongo na bana na yo mpe bibwele na yo nyonso, bokokoma na pasi.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Ezala tango bokotonda na suki ya pembe mpe bokokoma mibange, Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ; Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino, nakosunga bino mpe nakobikisa bino.
Elikana, mobali na ye, atunaki ye : « Ana, mpo na nini ozali kolela ? Mpo na nini ozali kolia te ? Mpo na nini ozali na mawa boye ? Boni, ngai nazali na motuya te mpo na yo koleka bana mibali zomi ? »