Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 4:14 - Mokanda na Bomoi

14 Basi balobaki na Naomi : « Tika ete Yawe akumisama ; Ye oyo, na mokolo ya lelo, atiki yo te kozanga mosikoli oyo kombo na ye ekokende sango kati na Isalaele !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 4:14
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo ; nakokomisa kombo na yo monene, mpe okozala etima ya mapamboli.


Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »


Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.


Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.


bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.


Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ