Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Atunaki ye : — Yo ozali nani ? Azongisaki : — Ezali ngai Rite, mwasi mosali na yo. Tanda songe ya elamba na yo kino epai na ngai, pamba te ozali na ndingisa ya kosikola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 3:9
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.


Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »


Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »


Boazi azongiselaki ye : — Tika ete Yawe apambola yo, mwana na ngai ya mwasi ! Bosembo oyo otalisi sik’oyo, ezali monene koleka bosembo oyo otalisaki liboso ; pamba te otambolaki te sima na bilenge mibali, ezala bazwi to babola.


Sik’oyo, atako solo nazali na ndingisa ya kosikola, kasi ezali na mosikoli mosusu oyo azali pene na yo koleka ngai.


Na kati-kati ya butu, tango Boazi ayokaki malili, aminyololaki mpe amonaki mwasi alali na makolo na ye.


Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba ; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo. Moto yango azongiselaki ye : — Iyo, nakosomba yango.


Mosikoli alobaki : — Nakoki kosikola yango te, noki te nakotia mobulu kati na libula na ngai. Sikola yango yo moko, pamba te ngai nakoki te kosala yango.


Abigayili agumbamaki elongi kino na mabele mpe alobaki : — Mwasi mosali na yo, ye oyo ! Abongami mpo na kosalela bino mpe mpo na kosukola makolo ya basali ya nkolo na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ