Tango Boazi asilisaki kolia mpe komela, motema na ye ezalaki na esengo ; akendeki kolala na suka ya mipiku ya orje. Bongo Rite apusanaki malembe-malembe, alongolaki elamba oyo ezipaki makolo ya Boazi mpe amilalisaki wana.
Atunaki ye : — Yo ozali nani ? Azongisaki : — Ezali ngai Rite, mwasi mosali na yo. Tanda songe ya elamba na yo kino epai na ngai, pamba te ozali na ndingisa ya kosikola.