16 Tango Rite akomaki epai ya mama-bokilo na ye, Naomi atunaki ye : — Mwana na ngai ya mwasi, makambo eleki ndenge nini ? Boye Rite ayebisaki ye makambo oyo Boazi asalaki mpo na ye.
Liboso ete akende, Boazi ayebisaki ye : « Pesa ngai elamba oyo olati, simba yango malamu. » Wana Rite asimbaki yango malamu, Boazi atielaki ye bakilo pene tuku mibale ya orje mpe asungaki ye mpo na kotombola mpe kotia yango na moto. Mpe Rite azongaki na engumba.
Mpe abakisaki : « Apesaki ngai kutu bakilo tuku mibale ya orje oyo, pamba te ayebisaki ngai : ‹ Kozonga maboko pamba te epai ya mama-bokilo na yo. › »