Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 Sik’oyo, atako solo nazali na ndingisa ya kosikola, kasi ezali na mosikoli mosusu oyo azali pene na yo koleka ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 3:12
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango ; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.


asengeli mpe te kokosa to kosala ndeko na ye mabe kati na makambo oyo etali bonzoto, pamba te Nkolo akopesa etumbu na bato nyonso oyo basalaka mabe ya lolenge wana, ndenge toyebisaki mpe tokebisaki bino liboso.


Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »


Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga.


Boye, lekisa butu awa ; bongo lobi na tongo, tokotala soki moto yango akolinga kosikola yo. Soki akolinga, wana tika ye asikola yo ; kasi soki aboyi, nalaki yo na Kombo na Yawe ete ngai nakosikola yo. Boye liboso ete tongo etana, lala awa.


Wana Boazi akendeki na ekuke ya engumba mpe avandaki kuna, amonaki mosikoli, oyo Boazi alobaki ete ye nde azali na ndingisa ya kosikola Rite, azali koleka. Boazi alobaki na ye : « Ndeko na ngai ya mobali, yaka nanu mpe vanda awa. » Moto yango apusanaki mpe avandaki.


Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba ; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo. Moto yango azongiselaki ye : — Iyo, nakosomba yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ