Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 2:7 - Mokanda na Bomoi

7 Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso ; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 2:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.


Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.


Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu ? Akosala kaka liboso ya bakonzi, akosala te liboso ya bato ya molili.


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te ; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi ; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu ;


Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.


mpe lokola botosaka Klisto, botosanaka bamoko na bamosusu.


Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.


Rite, moto ya Moabi, alobaki : — Alobaki na ngai kutu : « Vanda elongo na basali na ngai kino bakosilisa kobuka bambuma na ngai nyonso. »


Mokambi ya bato oyo bakataka ble azongisaki : — Azali elenge mwasi ya Moabi ; ayaki elongo na Naomi wuta na mboka Moabi.


Boazi alobaki na Rite : — Yoka ngai malamu, mwana na ngai ya mwasi : « Kokende kolokota ble na bilanga mosusu te mpe kokende mosika ya elanga oyo te, kasi vanda awa elongo na basali na ngai ya basi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ