Rite 2:4 - Mokanda na Bomoi4 Sima na mwa tango, Boazi awutaki na Beteleemi ; ayaki ye moko, apesaki mbote na bato oyo bakataka ble na koloba : — Tika ete Yawe azala elongo na bino ! Bazongiselaki ye : — Tika ete Yawe apambola yo ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto ; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.
Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki : — Iyo, biso moko tozali batatoli. Tika ete Yawe akomisa mwasi oyo azali koya na ndako na yo, lokola Rasheli mpe Lea, oyo batongaki elongo libota ya Isalaele. Tika ete okoma moto monene kati na Efrata mpe moto ya lokumu kati na Beteleemi !