22 Naomi azongiselaki Rite, bokilo na ye ya mwasi : — Ekozala malamu mpo na yo kotambolaka elongo na basali na ye ya basi ; pamba te soki okeyi na elanga ya moto mosusu, okoki komona pasi.
Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.
Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, soki oyebi yango te, landa kaka matambe ya bibwele, na banzela oyo yango elekeli, mpe leisa bana bantaba ya basi na yo pembeni ya bandako ya kapo ya babateli bibwele.
Boye Rite avandaki pembeni ya basali ya Boazi mpo na kolokota mito ya ble, kino tango ya kobuka bambuma ya orje mpe ya ble, esilaki. Awumelaki kovanda elongo na mama-bokilo na ye.