Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »
Naomi azongiselaki Rite, bokilo na ye ya mwasi : — Ekozala malamu mpo na yo kotambolaka elongo na basali na ye ya basi ; pamba te soki okeyi na elanga ya moto mosusu, okoki komona pasi.