Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 2:20 - Mokanda na Bomoi

20 Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 2:20
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi : « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye !


Davidi atunaki : « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi ? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. »


Ngai, nayebi na ngai malamu ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, mpe, awa na mokili, akotelema ya suka mpo na kokata likambo na ngai.


Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.


Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki.


Nazalaki penza na esengo mingi kati na Nkolo, wana botalisaki ngai lisusu bolingo na bino. Solo, bozalaki kokanisa kosunga ngai, kasi bozangaki nde libaku mpo na kokokisa yango.


Rite, moto ya Moabi, alobaki : — Alobaki na ngai kutu : « Vanda elongo na basali na ngai kino bakosilisa kobuka bambuma na ngai nyonso. »


Sik’oyo, atako solo nazali na ndingisa ya kosikola, kasi ezali na mosikoli mosusu oyo azali pene na yo koleka ngai.


Basi balobaki na Naomi : « Tika ete Yawe akumisama ; Ye oyo, na mokolo ya lelo, atiki yo te kozanga mosikoli oyo kombo na ye ekokende sango kati na Isalaele !


Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba ; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo. Moto yango azongiselaki ye : — Iyo, nakosomba yango.


Mosikoli alobaki : — Nakoki kosikola yango te, noki te nakotia mobulu kati na libula na ngai. Sikola yango yo moko, pamba te ngai nakoki te kosala yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ