Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 2:2 - Mokanda na Bomoi

2 Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 2:2
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › »


Okobuka mpe te mbuma ya vino oyo ekotikala to kolokota oyo ekokweya. Okotika yango mpo na babola to bapaya : nazali Yawe Nzambe na yo.


Okokende te kotonga bato na yo bipai na bipai. Okosala eloko moko te oyo ekoyeisa pasi na bomoi ya moninga na yo. Nazali Yawe.


Tango okobuka mbuma ya bilanga na yo, okobuka yango te kino na mondelo, mpe okozonga te mpo na kolokota mbuma oyo ekokweya.


Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »


Rite akendeki mpe abandaki kolokota ble na bilanga, na sima ya bato oyo bakataka ble. Akutanaki na libaku ya malamu, pamba te ayaki kososola ete azali kosala kati na elanga ya Boazi, moto ya etuka ya Elimeleki.


Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso ; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke.


Ana alobaki : — Tika ete mwasi mowumbu na yo azwa ngolu na miso na yo. Boye Ana azongaki, aliaki mpe elongi na ye ezalaki lisusu ya mawa te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ