Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.
Tango atelemaki mpo na kolokota lisusu ble, Boazi apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Botika ye kolokota ata oyo ezali na kati-kati ya maboke, botungisa ye te.