15 Tango atelemaki mpo na kolokota lisusu ble, Boazi apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Botika ye kolokota ata oyo ezali na kati-kati ya maboke, botungisa ye te.
Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.
Na tango ya kolia, Boazi alobaki na ye : « Pusana awa mpe kamata eteni ya lipa, zindisa yango na vino. » Tango avandaki elongo na bato oyo bakataka ble, Boazi apesaki ye ndambo ya bambuma bakalinga. Aliaki ndenge alingaki mpe atikaki mosusu.