Rite 2:14 - Mokanda na Bomoi14 Na tango ya kolia, Boazi alobaki na ye : « Pusana awa mpe kamata eteni ya lipa, zindisa yango na vino. » Tango avandaki elongo na bato oyo bakataka ble, Boazi apesaki ye ndambo ya bambuma bakalinga. Aliaki ndenge alingaki mpe atikaki mosusu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Abigayili asalaki na lombangu, azwaki mapa nkama mibale, bambeki mibale ya vino, bameme batumba mitano, bakilo tuku motoba na mibale na bagrame nkama mitano ya ble bakalinga, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka mpe bagato nkama mibale basala na bambuma ya figi ; mpe atiaki yango na likolo ya ba-ane.