Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 2:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tango Rite ayokaki bongo, agumbamaki, elongi kino na mabele. Alobaki : — Mpo na nini nazwi ngolu ya boye na miso na yo ? Mpo na nini ozali kopesa ngai lokumu ya boye, ngai oyo nazali mopaya ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 2:10
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele.


Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu.


Bongo mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki : « Nkolo Yawe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali ?


Mefibosheti agumbamaki mpe alobaki : — Mosali na yo azali nani mpo ete otala mbwa ya kokufa lokola ngai ?


Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei ; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela ; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu ;


Ngai nde nani mpo ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ?


pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye. Yango wana, kobanda lelo, bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,


Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ;


Boazi azongisaki : — Bayebisaki ngai makambo nyonso oyo osalaki mpo na mama-bokilo na yo wuta tango mobali na ye akufaki, ndenge otikaki tata mpe mama na yo, mboka epai wapi obotama, mpe oyaki kovanda elongo na bato oyo oyebaki liboso te.


Rite alobaki : — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi.


Naomi atunaki Rite : — Lelo, olokotaki ble na esika nini ? Osalaki na esika nini ? Tika ete moto oyo apesi yo lokumu ya boye apambolama ! Bongo Rite ayebisaki mama-bokilo na ye makambo oyo etali nkolo ya esika epai wapi asalaki. Alobaki : « Kombo ya moto yango ezali Boazi. »


Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.


Tala malamu bilanga oyo epai wapi bato bazali kokata ble mpe zala na sima ya bana basi oyo bazali kolokota ble. Nalobi na mibali ete basimba yo te. Tango nyonso ozali na posa ya mayi, kende mpe mela na bambeki oyo mibali batondisi. »


Tango Abigayili amonaki Davidi, akitaki na lombangu wuta na ane na ye mpe agumbamaki na liboso ya Davidi, elongi kino na mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ