1 Naomi azalaki na ndeko moko kati na libota ya mobali na ye ; ndeko yango azalaki ya etuka ya Elimeleki, azalaki penza na bozwi mingi ; kombo na ye ezalaki « Boazi. »
Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye.
mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.
Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna.
Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.
Pamba te oyebi malamu ete Boazi, oyo osalaki elongo na basali na ye ya basi, azali ndeko na biso. Na pokwa ya lelo, akoyungola orje oyo basilaki kosopa na etando.