Tango mibu yango sambo ekokaki, mwasi azongaki na mboka na ye wuta na mokili ya Filisitia ; akendeki epai ya mokonzi mpo ete bazongisela ye ndako mpe mabele na ye.
Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi.
Bongo Naomi alobaki na babokilo na ye mibale ya basi : — Bozonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tika ete Yawe asalela bino bolamu ndenge bosalaki bolamu epai ya bato oyo bakufaki mpe epai na ngai moko.