Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Maaloni mpe Kilioni bakufaki. Naomi atikalaki ye moko, azangaki bana na ye mibale ya mibali mpe mobali na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 1:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, okomilobela na motema : « Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo ? Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te, nazalaki mowumbu mpe moto basundola. Bongo nani abokolaki bango ? Natikalaki kaka ngai moko, bongo bana oyo bawuti wapi ? »


Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa : azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango.


Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.


Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna.


Bana na ye mibale ya mibali babalaki basi ya Moabi : ya liboso, kombo na ye ezalaki « Oripa ; » mpe ya mibale, « Rite. » Sima na bango kowumela kuna mibu pene zomi,


Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ