Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango !
Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa ; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango : bomoi ya bosembo mpe ya kimia.