18 Tango Naomi amonaki ete Rite atingami kaka kokende na ye elongo, atikaki kotindika ye na makasi.
Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.
Lokola tolongaki te kobongola makanisi na ye, totikaki kobondela ye mpe tolobaki : — Tika ete mokano ya Nkolo esalema !
Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.
Yango wana, bango mibale bakendeki kino bakomaki na Beteleemi. Tango bakomaki na Beteleemi, engumba mobimba eyokaki mawa mpo na bango. Mpe basi batunaki : — Oyo Naomi ?