Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 1:15 - Mokanda na Bomoi

15 Naomi alobaki na Rite : — Tala, mbanda na yo azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye ; yo mpe zonga elongo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 1:15
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.


Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele !


Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.


bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.


Obabi azongiselaki ye : — Te ! Nakokende elongo na bino te, nakozonga na mboka na ngai, kati na libota na ngai.


Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika.


Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ; kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.


Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »


Jozue alobaki na bato : — Bokokoka kosalela Yawe te, pamba te azali Nzambe ya Bule, Nzambe ya Zuwa ; akolimbisa te botomboki mpe masumu na bino.


Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.


Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.


Tango bayokaki bongo, balelaki lisusu. Boye Oripa apesaki mama-bokilo na ye beze mpe mbote ya suka. Kasi Rite akangamaki kaka na ye.


Kasi Rite azongiselaki ye : — Kotindika ngai na makasi te ete natika yo to napengwa na nzela na yo ; pamba te na esika nyonso oyo yo okokende nde ngai mpe nakokende, mpe na esika nyonso oyo yo okovanda nde ngai mpe nakovanda ; bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ