Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 1:14 - Mokanda na Bomoi

14 Tango bayokaki bongo, balelaki lisusu. Boye Oripa apesaki mama-bokilo na ye beze mpe mbote ya suka. Kasi Rite akangamaki kaka na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 1:14
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi ! Osali penza lokola moto ya liboma !


Mokonzi azongisaki : — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai.


Elize atikaki bangombe na ye, akimaki mbangu sima na Eliya mpe alobaki : — Tika ete nakende nanu kopesa tata mpe mama na ngai beze mpo na kokabwana na bango, bongo nakolanda yo. Eliya azongisaki : — Zonga na yo, nasali yo nini ?


Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.


Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.


Yawe akoyokela Jakobi mawa, akopona lisusu Isalaele mpe akopemisa bango na mokili na bango ; bongo bapaya bakosangana na bango mpe bakobakisama na ndako ya Jakobi.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba : ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »


Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.


Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.


Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.


Nzokande, bato mosusu balandaki Polo mpe bakomaki bandimi. Kati na bango, ezalaki : Denisi, moto ya Areopaje ; mwasi moko oyo kombo na ye ezali Damarisi, mpe bato mosusu.


Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye ; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye.


Kasi bino oyo bokangamaki na Yawe, Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi na mokolo ya lelo.


Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.


Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.


boni, bokokoka penza kozela kino bakokola ? Bokokoba kaka kozanga kobala mpo na bango ? Te, bana na ngai ! Mawa na ngai ezali makasi koleka mawa na bino, pamba te loboko na Yawe eyokisi ngai pasi makasi.


Naomi alobaki na Rite : — Tala, mbanda na yo azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye ; yo mpe zonga elongo na ye.


Elongo na babokilo na ye mibale ya basi, Naomi alongwaki na esika oyo azalaki kovanda mpe azwaki nzela mpo na kozonga na mokili ya Yuda.


Boazi azongisaki : — Bayebisaki ngai makambo nyonso oyo osalaki mpo na mama-bokilo na yo wuta tango mobali na ye akufaki, ndenge otikaki tata mpe mama na yo, mboka epai wapi obotama, mpe oyaki kovanda elongo na bato oyo oyebaki liboso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ