Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Rite 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kasi Naomi azongiselaki bango : — Bana na ngai ya basi, bozonga na bandako na bino. Mpo na nini kolanda ngai ? Boni, nakoki lisusu kobota bana mibali oyo bakoki kozala mibali na bino ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Rite 1:11
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi : « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye.


Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te.


Soki bandeko mibali bazali kovanda elongo, mpe moko kati na bango akufi kasi atiki mwana te, mwasi oyo akufisi mobali akoki te kobala na libota mosusu ; semeki na ye asengeli kozwa ye na libala mpo na kokokisa epai na ye mokumba ya kisemeki.


Sima, balobaki na ye : — Tokokende elongo na yo, epai ya bato na yo.


Bana na ngai, bozonga epai na bino ; nakomi mobange makasi, nakokoka lisusu kobala te. Ata soki nakanisi ete nazali nanu na elikya ya kobota, mpe, na butu ya lelo, nasangisi nzoto na mobali, mpe naboti bana mibali,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ