1 Na mikolo oyo bilombe bazalaki koyangela, nzala makasi ezalaki kati na mokili. Mobali moko ya Beteleemi ya Yuda, elongo na mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya mibali, bakendeki kovanda na mboka Moabi.
Nabomaki bino nzala kati na bingumba na bino nyonso, napimelaki bino bilei kati na bamboka na bino nyonso ; kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
Alongwaki na engumba Beteleemi ya Yuda mpe akendeki koluka esika mosusu ya kovanda. Na mobembo na ye, akomaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ndako ya Mika.