Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 9:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 9:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Moyize : — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela,


Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te ; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko.


Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi !


Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo : « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »


Kasi lokola basilaki kolapa ndayi ete bakotosa ye, bavandi ya Yelusalemi bakomona yango lokola bimoniseli ya pamba mpe ya lokuta. Kasi mokonzi ya Babiloni akosala ete bakanisa lisusu mabe na bango, mpe akomema bango na bowumbu.


Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibea mpe obongwani te. Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te ?


Makambo oyo ekokomela bato yango ekokomela mpe Banganga-Nzambe : nakopesa bango nyonso etumbu nzela moko mpo na etamboli na bango mpe nakofuta bango kolanda misala na bango.


Bobeta kelelo, na Gibea, mpe liseke, kuna na Rama ! Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni ! Oh Benjame, keba !


Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.


Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.


Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai, azali mosakoli ; Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.


Namilobelaki boye na tina na engumba oyo : « Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! » Boye bandako na yango ekobukana lisusu te, mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te. Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala misala na bango ya mabe.


Nkolo azongiselaki ye : — Te, tokotelema te na engumba oyo ya bapaya, epai wapi ata mwana moko te ya Isalaele azali ; tokokoma kino na Gibea.


Na pokwa, mobali moko ya mobange awutaki na mosala na ye ya bilanga ; azalaki moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe azalaki kovanda na Gibea. Nzokande bato ya esika wana bazalaki bato ya libota ya Benjame.


Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako ; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako : — Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo ; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi.


Bazingelaki bana ya Benjame, balandaki bango na kozanga kopema mpe banyataki bango na makolo kino liboso ya Gibea, na ngambo oyo moyi ebimelaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ