Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 9:6 - Mokanda na Bomoi

6 Ata soki bakimi, bakobebisama ; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango ; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 9:6
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mampinga nyonso ya Yoakazi, etikalaki kaka na mibali tuku mitano oyo batambolisaka bampunda, bashar zomi, mpe basoda oyo batambolaka na makolo, nkoto zomi, pamba te mokonzi ya Siri abomaki bamosusu oyo batikalaki, mpe akomisaki bango lokola putulu oyo banyataka na makolo.


kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.


bongo, tala ndenge etondi na banzube, tala ndenge matiti mabe ezipi yango, mpe mir na yango ya mabanga ebukani.


Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.


Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba, bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta ; nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito, nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela.


Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.


mpe mpo na mokili ya bato na ngai ; pamba te mokili oyo eboti basende mpe banzube. Solo, bolela mpo na bandako nyonso ya kitoko mpe mpo na engumba oyo etonda na bisengo,


Nzube ekobota kati na ndako ya mokonzi ; basende mpe matiti, kati na bandako na ye batonga makasi ; ekokoma ndako ya bambwa ya zamba, lopango ya maligbanga.


Nakokomisa yango esobe : kati na yango, bakolongola lisusu te, ezala mabanga to matiti ; bongo banzube mpe basende ekokola kuna. Nakopesa mitindo na mapata ete enokisela yango lisusu mvula te.


Na mokolo wana, esika nyonso oyo ezalaki na banzete ya vino nkoto moko oyo ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ekotonda na basende mpe na banzube.


Mpe lisusu, bato ya Mefisi mpe ya Dafine babuki moto na yo.


Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo : bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. »


Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi :


Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.


Nakopesa bavandi ya Ejipito etumbu na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, ndenge napesaki Yelusalemi etumbu.


« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli ; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›


Yo movandi ya Ejipito, kanga bisaka na yo mpo na kokende na bowumbu, pamba te Mefisi ekokoma esobe, ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te !


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.


Nakotia moto kati na Ejipito ; engumba Sini ekotonda na pasi. Tebesi ekokoma na madusu ebele mpe banguna bakokota kati na Mefisi na moyi makasi, mpo na kobebisa yango.


Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »


Bakoya na kolenga lokola bandeke wuta na Ejipito, lokola bibenga wuta na Asiri. Nakovandisa bango na bandako na bango, elobi Yawe.


Nakolinga bana na ye te, pamba te bazali bana oyo babotami na nzela ya kindumba.


Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.


Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai ! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai ! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo !


Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba ; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.


Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.


Bakovanda lisusu te na mboka na Yawe ; Efrayimi akozonga na Ejipito, mpe bakolia bilei ya mbindo kati na Asiri.


Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.


Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela, pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa, mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama !


Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ