Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?
Yango wana, nakobotola ble na ngai na tango ya kobuka, vino na ngai ya sika na tango ya kokamola yango ; nakobotola bilamba na ngai oyo basala na bapwale ya meme, mpe bilamba na ngai ya lino oyo azalaki kozipa na yango bolumbu na ye.
Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.