Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 9:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nazali komona Efrayimi lokola engumba Tiri oyo etongama na likolo ya mabele ya kitoko ; nzokande, Efrayimi akokaba bana na ye na mobomi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 9:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Menayeme abundisaki engumba Tifisa, abomaki bato nyonso ya engumba mpe abebisaki zingazinga na yango, kobanda na Tiritsa, pamba te baboyaki kofungolela ye bikuke ya engumba na bango. Abebisaki engumba yango mpe atobolaki mabumu ya basi nyonso ya zemi.


Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele, mopanga ezali lifuti na bango, bakitani na ye bakokufa na nzala,


Nakobwaka bino mosika na Ngai ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso ya Efrayimi. ›


Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »


Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti, ndenge wana mpe obengisaki pasi wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe. Na mokolo ya kanda ya Yawe, moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi. Monguna na ngai abebisi bato oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.


Loba na Tiri oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, oyo esalaka mombongo elongo na bikolo nyonso, bavandi ya bisanga : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba Tiri, olobaka : ‘ Ngai, nakoka na kitoko na ngai ! ’


Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo, bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama ; ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli na mokolo ya bitumba, tango bamama mpe bana na bango bakweyaki na mabele.


Nakolanda bino lokola ngombolo oyo ebungisi bana na yango mpe nakopasola misuni ya mitema na bino. Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi, bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.


Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.


Efrayimi alembi, misisa na ye ekawuki ; akobota lisusu bambuma te ; ata soki baboti bana, nakoboma bana na bango oyo balingaka mingi.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ