kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo.
Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo na bikuke ya engumba, nakobotola bango bana na bango mpe nakoboma bato na Ngai, pamba te babongoli bizaleli na bango te.
Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »
Oh Yawe, tala mpe mona ! Nani oyo osalela makambo ya boye ? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli ? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo ?
Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti, ndenge wana mpe obengisaki pasi wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe. Na mokolo ya kanda ya Yawe, moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi. Monguna na ngai abebisi bato oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.
Mpo na mobali nyonso oyo akosala bongo, azala nani, tika ete Yawe alongola ye na bandako ya kapo ya Jakobi, ata amemi makabo epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Lokola bosalaki mikolo tuku minei mpo na kononga mokili, bokomona pasi mibu tuku minei mpo na masumu na bino : mobu moko mpo na mokolo moko. Na bongo bokoyeba mbano oyo ezali kati na likambo ya kotelemela Ngai.
Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.
Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te.
Na mokolo wana, nakosilikela bango mpe nakobosana bango. Boye, nakobombela bango elongi na Ngai, mpe bakobebisama. Bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango. Mpe na mokolo wana, bakomituna : ‹ Ezali te mpo ete Nzambe na biso azali lisusu elongo na biso te nde bokono oyo ekomeli biso te ? ›
Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; kati na bandako na bango, somo ekokonza ; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.