Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 9:11 - Mokanda na Bomoi

11 Nkembo ya Efrayimi ekokima lokola ndeke, wuta na mbotama, wuta na zemi, wuta na ebandeli ya zemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 9:11
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki : « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »


Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi, nzete oyo ezalaka pembeni ya etima, mpe oyo bitape na yango elekaka bosanda ya mir.


Mpo na yango, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotaki te kino na mokolo na ye ya kufa.


Solo, mwinda ya moto mabe ekufaka, moto na yango etikaka kopela.


Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola ; Tika ete bambanzi na bango ebukana tango babetaka batolotolo.


Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;


Bingumba batonga makasi ekolimwa na Efrayimi, mpe nguya ya bokonzi ekolimwa na Damasi. Batikali ya Siri bakokoma lokola nkembo ya bana ya Isalaele, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.


Ndenge Banganga-Nzambe bakomaki ebele, ndenge wana mpe basalaki masumu na miso na Ngai. Nakobongola nkembo na bango soni.


Efrayimi akobebisama na mokolo ya etumbu na ye. Nazali koloba makambo ya solo kati na bikolo ya Isalaele.


Oh Yawe, pesa bango… Okopesa bango nini ? Pesa bango mabumu oyo esopaka bazemi, mpe mabele oyo ekawuka.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Amoni, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Galadi mpo na koyeisa mokili na bango monene.


Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! »


Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino : bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe.


mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti ; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino.


Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe ; maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ