Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 9:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 9:10
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.


Batumbaki ansa na bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba, ndenge bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango ezalaki kosala. Basalaki makambo mabe oyo etumbolaki kanda ya Yawe.


Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.


Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te, Isalaele aboyaki kotosa ngai.


Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata, azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa, oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitoko ya moto ya mombongo ?


mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango na moto ya lubwaku ya kitoko ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge : soki kaka moto amoni yango, akobuka mpe akomela yango mbala moko.


Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »


Kitunga moko ezalaki na bambuma kitoko ya figi lokola bambuma oyo etelaka liboso ; mpe kitunga mosusu ezalaki na bambuma ekawuka oyo bakoki kolia te.


Wuta bolenge na biso, banzambe ya bikeko ebebisaki mbuma ya misala ya batata na biso, bibwele na bango mpe ngombe na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi.


Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bato oyo bakobika na mopanga bakozwa ngolu kati na esobe ; boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. »


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito.


Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.


Ngai, nayebaki yo kati na esobe, kati na mabele oyo ekawuka.


Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.


Nakopesa etumbu te : ezala na bana na bino ya basi mpo na kindumba na bango to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango ; pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo. Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi !


Soki kaka asilisaka komela vino, amipesaka na kindumba ; bakambi na yango balingaka makambo oyo eyokisaka bango soni.


Botumba farine oyo batia levire lokola likabo ya kozongisa matondi, mpe bobeta tolo mpo na makabo na bino, oyo bokati kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. Bino bana ya Isalaele, bolobela yango na mongongo makasi, pamba te bolingaka nde kosala bongo, elobi Nkolo Yawe.


Tala, mawa na ngai ! Nakomi lokola moto oyo azali koluka kobuka bambuma na eleko ya elanga, na tango oyo bazongelaka kobuka bambuma ya vino oyo etikalaka. Kasi ezali ata na liboke moko te ya bambuma ya vino ya kolia to mbuma ata moko te ya figi ya sika oyo nasepelaka kolia.


Tango nyonso bokotala bitendi yango, bokobanda kokanisa mitindo nyonso ya Yawe, mpo ete botosa yango mpe botika kolanda baposa ya mitema na bino mpe ya miso na bino, oyo ekoki kotindika bino na kobungisa boyengebene.


Bambuma ya liboso ya mokili, oyo bakomema epai na Yawe ekozala mpo na yo. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto, akoki kolia yango.


Nzokande, litomba nini bozwaki na tango wana oyo bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino lelo soni, pamba te ememaka na kufa ?


Amonaki ye na esobe, kati na mokili oyo ekawuka, etonda na koganga ya somo. Azingelaki ye, abatelaki ye, akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.


Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe oyo ezali Nzambe te ; babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te, banzambe oyo ebimaki sika, banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te.


Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori : abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori.


Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba : Tika ete Bala amibundela ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ