Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Isalaele, kosepela te ; kozala na esengo te lokola bikolo mosusu ; pamba te otikaki Nzambe na yo mpe okendeki kosala kindumba ; osepelaki na lifuti ya kindumba na bitando nyonso oyo batutelaka ble.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 9:1
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa ; obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.


Kaka na mokolo oyo olonaki yango, omonaki yango kobimisa mito ; mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo. Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba, mpe pasi yango ekoki kosila te.


Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.


Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.


Edomi, mboka kitoko, movandi ya mokili ya Utsi, sepela, zala na esengo ! Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ; okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.


Kasi okomaki kotia motema na kitoko na yo mpe kosalela lokumu na yo mpo na kosala kindumba. Olakisaki bolumbu na yo na moleki nzela nyonso mpe omipesaki na ye.


Yango motema ya pete ya ndenge nini penza yo ozali na yango, elobi Nkolo Yawe, mpo ete osala makambo oyo nyonso, lokola mwasi ya ndumba oyo akenda sango na mosala na ye ya kindumba !


Bozali koloba : ‘ Tolingi kozala lokola bato ya bikolo mosusu, lokola bituka ya mikili mosusu ; tolingi na biso kosalaka mpo na banzete mpe mabanga. ’ Kasi eloko oyo bozali kokanisa ekosalema te.


Boye, bato nyonso bakososola ete Ngai Yawe nde nabimisi mopanga na Ngai wuta na ebombelo na yango, mpe ekozonga lisusu te. ›


Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.


Boye, nakosambwisa ye na miso ya bamakangu na ye, mpe moto moko te akobikisa ye na maboko na ngai.


Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,


Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.


Bazali sembo te liboso ya Yawe, baboti bana makangu ; sik’oyo, bafeti na bango ya ebandeli ya sanza ekoboma bango nzela moko na bomengo na bango.


« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele ; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.


Botumba farine oyo batia levire lokola likabo ya kozongisa matondi, mpe bobeta tolo mpo na makabo na bino, oyo bokati kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. Bino bana ya Isalaele, bolobela yango na mongongo makasi, pamba te bolingaka nde kosala bongo, elobi Nkolo Yawe.


Bozali kosepela mpo ete bozwi Lo-Debari mpe bozali komikumisa na koloba : « Boni, tobotoli engumba Karinayimi na makasi na biso moko te ? »


Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.


Kasi bino, bozali nde komikumisa na monene ya mabongisi na bino ! Boyeba malamu ete lolendo ya ndenge wana ezali mabe.


Boyoka sik’oyo, bino bazwi : Boyoka mawa mpe bolela mpo na pasi oyo ekokweyela bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ