Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 8:5 - Mokanda na Bomoi

5 Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele ! Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango. Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 8:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe sik’oyo, bokani kotelemela bokonzi ya Yawe, oyo ezali na maboko ya bana ya Davidi ! Bobongisi mampinga minene mpe bozali, kati na bino, na bikeko ya bana ngombe oyo Jeroboami asalelaki bino lokola banzambe.


Nani akoki kososola mabunga na ye oyo asali na nko te ? Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te !


« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


Bosangana elongo mpe boya, bopusana elongo bino nyonso, bino bato oyo bobiki kati na bikolo ! Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te ; bazangi boyebi.


Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »


Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?


Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.


Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.


Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »


Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu ; na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko na nzela ya palata na bango balekisa na moto, bililingi oyo babongisa malamu : nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko. Balobaka na tina na bango : « Babonzaka bato lokola bambeka mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »


Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.


Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka : ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »


Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana, makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto. Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule, mpe mpo ete basalela yango lisusu te lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »


Ezalaki na mikolo wana nde basalaki nzambe ya ekeko, na lolenge ya mwana ngombe ; babonzelaki nzambe yango ya ekeko mbeka mpe basalaki feti mpo na lokumu ya misala ya maboko na bango.


Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ