Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 8:14 - Mokanda na Bomoi

14 Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 8:14
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeroboami atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atiaki banganga-nzambe oyo bazalaki ata te bato ya libota ya Levi.


Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.


Tango mokonzi Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango.


Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.


Atongaki mpe bingumba kati na etuka ya bangomba ya Yuda, bandako makasi mpe bandako milayi kati na bazamba.


Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango, oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,


Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso !


Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo, oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo, okolisi banzete ya kitoko mpe oloni banzete ya vino ya bapaya.


Tango akomona kati na bango bana na ye, mosala ya maboko na Ngai, bakopesa lokumu na bosantu ya Kombo na Ngai mpe bakososola bosantu ya Mosantu ya Jakobi. Boye, bakozala na somo ya Nzambe ya Isalaele.


Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ; akoganga, solo ; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.


Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye, mobulu ya etumba makasi ; azingelaki bango na moto na bangambo nyonso, kasi basosolaki te ; mpe moto ezikisaki bango, kasi bazwaki penza likambo yango na motema te.


bato oyo Ngai moko nabongisaki mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.


Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsini mpo na kobundisa bango mpe apelisaki mitema ya banguna na bango mpo ete batombokela bango.


« Ata babiliki ekweyi, tokotonga lisusu na mabanga bakata ; ata bakati banzete ya sikomori, tokotia na esika na yango banzete ya sedele. »


Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »


Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.


Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ?


Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba : ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele, pamba te babebisi nzela na bango mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.


Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. »


Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi, bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.


Nakosukisa bisengo na ye nyonso : bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Nakotia moto na bamir ya engumba Tiri, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi. »


Nakotia moto na engumba Temani, mpe moto yango ekozikisa bandako ya Botsira, oyo batonga makasi. »


Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.


Nakotia moto na ndako ya mokonzi Azaeli, mpe moto yango ekozikisa bandako ya mokonzi Beni-Adadi, oyo batonga makasi.


Nakotia moto kati na ekolo ya Yuda, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba Yelusalemi, oyo batonga makasi. »


Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.


Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ